Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi akeyi Dar-es-Salaam mpo na Sommet ya SADC


Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi apesi mokambi ya misala ma ye Vital mbote, na bolongwi na ye mpo na kokende Dar-es-Salam, Kinshasa, 16 août 2019. (Facebook/présidence RDC)
Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi apesi mokambi ya misala ma ye Vital mbote, na bolongwi na ye mpo na kokende Dar-es-Salam, Kinshasa, 16 août 2019. (Facebook/présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akeyi lelo mokolo ya mitano ya mposo na Dar-es-Salaam, engumba mokonzi ya Tanzanie, mpo na bokutani ya bakonzi ya mboka ya SADC, lingomba ya ntombwa ya bikolo ya Ngele na Afrika.

Ezali bongo 39e Sommet ya bakonzi ya bikolo ya SADC eye ekosalama na Dar-es-Salaam, banda le 16 août kino le 18 août 2019.

Kolanda présidence ya Congo démocratique (RDC), F. Tshisekedi akolobela mingi bokengi na bokono ya Ebola na monyele ya mboka na ye.

Bakonzi ya mboka ebele bakozala kuna : King Nswati III ya Eswatini (Botswana), Thomas Motsohae Thabane na Lesotho, Andy Rajoelina ya Madagascar, Arthur Peter Muthanka ya Malawi, Paramasivum Pillay Viaoory ya Maurice, Filipe Jacinto Nyusi ya Mozambique, Hage Gottfried Geingob ya Namibie, Dany Faure ya Seyschelles, John Pombe Joseph Magufuli ya Tanzanie, Edgar Chagwa Lungu ya Zambie, Emmerson Mnangagwa ya Zimbabwe, Joao Lourenco ya Angola, Mokgweetsi Eric Keabetwe Masisi ya Botswana, Félix Tshisekedi ya RDC, na Azali Assoumani ya Comores.

XS
SM
MD
LG