Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sénateur Lola Kasanga awei nsima na ntango moke ya bokono


Sénateur Jean-Pierre Lola Kisanga (D) na mopanzi ya mokonai wa ye Francine Muyumba, RDC, 2020.m (Facebook/Francine Muyumba)
Sénateur Jean-Pierre Lola Kisanga (D) na mopanzi ya mokonai wa ye Francine Muyumba, RDC, 2020.m (Facebook/Francine Muyumba)

Sénateur Jean-Pierre Lola Kisanga awei nsima na ntango mokuse ya bokono. Awei mokolo Sénateur mosusu, Célestin Kabuya Lumuna, azali kotiama na lilita nsima na liwa lya ye mikolo mileki.

M. Lola azalaki moko na lingomba ya politiki RCD/Goma eye ezalaki kala lisanga lya batomboki.

Akomaki mokambi ya etuka ya kala ya Province orientale yambo na koponama bo’ mokeli mobeko mpe Sénateur.

Akomaka mpe ministre ya malakisi ma likolo mpe boluki bwa Zebi (ESUR).

M. Lola azalaki moko bayi FCC bamonanaki na misala mya koyoba bato président Felix Tshisekedi asalaki.

Andimaki kokota na lisanga lilamu (Union sacrée) président Tshisekedi azali kokela.

Bayi Sénat bapesaki losako ya suka na Awei mardi na moninga na bango mosusu Sénateur Célestin Kabuya Lumuna oyo akundami nsima na liwa lya ye mikolo mileki.

XS
SM
MD
LG