Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

RDC elingi esilisa matata na Ouganda na malembe


Président Félix Tshisekedi (G) ya RDC na mokokani wa ye ya Ouganda Yoweri Museveni na bokutani na Entenbe, Ouganda, 9 novembre 2019.
Président Félix Tshisekedi (G) ya RDC na mokokani wa ye ya Ouganda Yoweri Museveni na bokutani na Entenbe, Ouganda, 9 novembre 2019.

Mbulamatari ya ekolo Congo démocratique elingi esilisa na boyokani na malembe matata na Ouganda, yango mokano mosakolamaki na suka ya mposo moleki.

Président Félix Tshisekedi akambaki ye moko bokutani bwango o’mokolo ya minei na Cité ya Union africaine na Kinshasa.

Liyebisi lisakolamaki lilakisi ete mbulamatari ya RDC elingi kosilisa likambo yango na kimya.

Yango nde elimboli ntina nini mbulamatari ya bikolo biye bibale esanganki sanza eleki na Cour internationale ya justice (CIJ) kozongisa bosambisami yango.

Mokanda ya kosenga CIJ mokomamaki na mobembo ya Félix Tshisekedi na Ouganda sanza ya novembre eleki.

Ezali likambo ya kopesa libaku na lolenge malamu ya kozwa mosolo moye mokopesama na baye bazwaki mpasi mpo na misala (bitumba) mampinga ya Ouganda na Rwanda basalaki na mabele ya Congo, na Kisangani, elobi liyebisi ya mbulamatari ya RDC.

RDC esengaki Ouganda kofuta koleka 10 milliards ya ba dollars mpo na mbeba esala na Congo. Ezali mpo basoda ya Ouganda batikali na mabele ya Congo na makasi, ata Laurent-Désiré Kabila, mokonzi ya Congo na 1998 asengaki bango kolongwa nsima na kosalisa ye na itumba ya ko bengana mokonzi ya kala Joseph Mobutu Sese Seko.

Ouganda endimaki motango yango te.

Kasi, na mobembo na président Tshisekedi na Ouganda mboka mibale bandimi koyokana.

Nsima na mobembo moye, Ouganda na RDC basakolaki ete bakotonga nzela nzike ekosangaki bikolo bibale biye.

Nzokande na 1998, Ouganda na Rwanda basalaki bitumbu bikasi mikolo motoba na Kisangani. Bato bakufaki ebele mpe biloko bibebaki ebele. Yango etindaki mbala ya yambo ete ONU endima ete mampinga ya bapaya bakotaki na mabele ya RDC.

XS
SM
MD
LG