Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Conseil ya sécurité epaleli bobomi ya ba civils mpe botelemeli Monusco


Conseil ya sécurité (Likita ya bokengi) ya ONU, na New York, USA, 30 avril 2019.
Conseil ya sécurité (Likita ya bokengi) ya ONU, na New York, USA, 30 avril 2019.

Conseil ya sécurité epaleli, na bokutani na yango ya mokolo ya mibala na New York, bobomi ya ba civils mpe botelemeli Monusco na Nord-Kivu,na ekolo Congo démocratique.

Karen Pierce, ambassadrice ya Royaume uni oyo azali kokamba Conseil ya sécurité na eleko eye, akundoli ete "etinda ya mampinga ya Monusco ezali mpe ya kobatela ba civils".

Na likita na lyango, Conseil ya sécurité elobi ete "esengeli kopekisa ba civils kokweya na likama ntango ya misala ya bitumba mampinga ya Congo na Monusco" bazali kosala.

Conseil ya sécurité emitungisi ete bozangi bokengi bokoki kozala na mbano ebe likolo na bitumba ya bokono bwa Ebola.

Kasi elobi esengeli ete botemeli bosalama na kimya mpe bato bazala na bonsomi ya koloba mpe ya kosala milulu.

Mobulu mobimaki na Beni uto mikolo mibale. Bavandi bayike batelemeli Monusco mpo na kosala eloko te ntango na ADF bazali koboma bango.

Wuto libandela ya sanza, pene na bato 80 bakufi na bitumba bisalami na baye bamonani kozala ba ADF, ba batomboki bawuta mingi na Ouganda uto 2014 mpe bazali ba musulmans.

XS
SM
MD
LG