Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ouganda na RDC bapusi bosambi na bango na Cour internationale ya justice


Président Félix Tshisekedi na mokokani waye ya Ouganda Yoweri Museveni na masolo na Entebe, Ouganda, 9 novembre 2019. (Facebook/Valery-Giscar Kusema)
Président Félix Tshisekedi na mokokani waye ya Ouganda Yoweri Museveni na masolo na Entebe, Ouganda, 9 novembre 2019. (Facebook/Valery-Giscar Kusema)

Cour internationale ya justice to misala ya bosembo ya Nations unies mizongisi nsima bosambisi ya matata kati na ekolo Congo démocratique na Ouganda.

Bosambisi bwango bosengelaki kosalama banda le 18 kino le 22 ya sanza eye ya libwa.

Tribunal eye elobi bakonzi ya Ouganda na Congo démocratiquende basengi bozongisi nsima noye.

Nzonkande président Félix Tshisekedi azalaki mposo moleki na Ouganda.

Congo démocratique efundaka Ouganda mpe esengaka yango misosolo milliards pene na zomi na moko mpo na misala ya kopunza, koyiba mpe koboma miye mampinga ya Ouganda, UPDF (Uganda People's Defence Force) masala na mabele ya ba Congolais ata basengamaki kolongwa.

XS
SM
MD
LG