Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na Ouganda o’mokolo mwa mposo


Président Félix Tshisekedi na mokokani wa ye ya Ouganda, Yoweri Museveni na bokutani na Luanda, Angola, 12 juillet 2019.
Président Félix Tshisekedi na mokokani wa ye ya Ouganda, Yoweri Museveni na bokutani na Luanda, Angola, 12 juillet 2019.

Président Félix Tshisekedi akozala na Ouganda o’mokolo mwa mposo mpo na mobembo wa ye ya yambo na ekolo eye wuto aponama mokonzi ya RDC na décembre 2018.

Akokutana na mokokani wa ye ya Ouganda, Yoweri Museveni, mingi mpeza mpo na masolo ya bokengi, eyebisi ndako ya misala ya président Tshisekedi.

Masolo mango makotala mokano ya bakonzi babale baye ya kokotisa kimya na etuka ya Afrika na kati.

Bakutana mbala mingi na makita ya bakonzi etuka ya Grands lacs to ya Afrika ya kati, kasi nanu basala ya bango mibale te uto M. Tshisekedi azwa bokonzi.

Félix Tshisekedi nde asalaki makasi mpo Yoweri Museveni na mokokani wa ye ya Rwanda, Paul Kagame, batiya manzaka na mokanda ya kozongisa bondeko mpe koyokana, le 21 août 2019, na Luanda na Angola.

Bazalaki na matata pene na kosala bitumba ya mampinga na bango.

Mpe lisusu, mampinga ya FARDC mayokanaki sanza eleki na baninga ya nzinganzinga mpo na misala ya kobengana elongo na ndelo ya ekolo moko moko, batomboki banso basalaka bitumba na RDC.

Moko na baye ya misala ya kopanza sango ya président, Valery-Giscard Kusema ayebisi mpe lisusu ete M. Tshisekedi akozala na bokutani ya mombongo kati na Ouganda mpe RDC.

Mombongo mwango mozala na motango koleka 700 millions ya ba dollars.

XS
SM
MD
LG