Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Police ya Kinshasa ekebisi balandi ya J-P Bemba nsima na mobulu


Ba policiers batelemi na esika ya meeting ya Jean-Pierre Bemba, mokambi ya MLC, na Ste Thérèse, Kinshasa, 24 juin 2019.
Ba policiers batelemi na esika ya meeting ya Jean-Pierre Bemba, mokambi ya MLC, na Ste Thérèse, Kinshasa, 24 juin 2019.

Commissariat provincial ya police nationale congolaise ya engumba ya Kinshasa ekebisi balandi ya Jean-Pierre, mokonzi ya MLC mpe moko ya bakambi ya Lamuka, mpo kopunza biloko mpe kobundisa policiers nsima ya meeting na Ste Thérèse, na N’Djili, o’mokolo ya eyenga.

"Ba policiers mitano bazokaki, mituka ya police minei mibebisamaki, mituka misusu ya bato bayike mibundisamaki, sous ciat Sonapangu ya quartier 2 N’Djili epunzamaki, etando enene (écran géant) ya Orange/Bracongo ebebisamaki, bisaleli ya kermesse ya place Ste Thérèse bimemamaki," elobi na liyebisi commissaire provincial mpe commandant ya engumba Kinshasa, Sylvano Kasongo.

Police ekebisi ete ekotika lisusu te balandi ya mangomba ya politiki ko tambola likolo ya mibeko ya mboka na bozangi etumbu.

Bakonzi ya police basepeli ete moto moke te akufi to azoki kati na baye bazalaki kosala mobulu. Mpe basengi na baye basalaka mabongisi ya milulu ya montindo boye kokengele mpe kokamba balandi na bango malamu.

J-P Bemba asalaki meeting na Ste Thérèse nsima na bozongi na ye o'mokolo ya eyenga na Kinshasa, na kuwata Bruxelles.

XS
SM
MD
LG