Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

J-P Bemba azongi Kinshasa mpe asengi bokambi ya malamu


Jean-Pierre Bemba mokambi ya MLC (D) ayambani na Martin Fayulu ya ECIDE, na libanda ya mpepo ya N'Djili, Kinshasa, 23 juin 2019. (Facebook/Lamuka International)
Jean-Pierre Bemba mokambi ya MLC (D) ayambani na Martin Fayulu ya ECIDE, na libanda ya mpepo ya N'Djili, Kinshasa, 23 juin 2019. (Facebook/Lamuka International)

Mokambi ya lingomba ya MLC (Mouvement pour la libération ya Congo), mpe moko ya bakambi ya Lamuka, Jean-Pierre Bemba, asengi bokambi ya malamu, na lisikulu na ye Ste Therese, na N’Djili, na Kinshasa, nsima na bozongi na ye na Congo démocratique, o’mokolo ya eyenga.

"Congo ezali ya biso banso. Esengeli bakonzi batiya bokambi ya malamu liboso. Basengeli kotosa mosolo ya l’Etat. Ezali ya biso banso. Ezali te kaka ya baye bazali kokamba mpo bango batonga ba villas, basomba mituka ya kitotko mpe basala mibembo," elobi mwana mboka Bemba.

Ayambamaki na bituluku ya bato banda libanda ya mpepo ya N’Djili. Mpe mingi misusu bazalaki na meeting na ye na Ste Therese.

M. Bemba asengaki na bana ya Congo koyeba koyanola ebele ntango lingomba lya ye, Lamuka, likobengisa bango na bokutani.

Kasi, M. Bemba apalelaki oyo abengi cancer eye ekoti na Cour constitutionnelle mpo etali bolongoli ya ba parlementaires baye balongaki na bilembo ebele.

Ezali mbala ya mibale J-P. Bemba azongi na RDC nsima ya botikami na ye na Cour penale internationale (CPI), na sanza ya juin ya 2018, esika wapi asalaki pene na mibu zomi na boloko mpo na kosambisama likolo ya bobomi ya mampinga ya MLC na Centrafrique kati na 2002 na 2003.

J-P. Bemba ayambamaki na bayike ya lingomba Lamuka. Kati na bango Martin Fayulu, Adolphe Muzito mpe baye ya MLC lokala Eve Bazaiba, Fidele Babaa mpe basusu.

XS
SM
MD
LG