Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bemba asengi 68 millions ya ba euros na CPI


Vice-président ya kala Jean-Pierre Bemba na mituna mpe biyano na Associated Press na Waterloo, Belgique, 11 septembre 2018.
Vice-président ya kala Jean-Pierre Bemba na mituna mpe biyano na Associated Press na Waterloo, Belgique, 11 septembre 2018.

Jean-Pierre Bemba asengi ete CPI (Cour pénale internationale) efuta ye koleka 68 millions ya ba dollars mpo na mibu zomi alekisaki pamba na boloko na Haye, na Pays-Bas, ekomi avocat na ye Me Peter Haynes.

Na mokanda atindi na CPI, mosambi Peter Haynes, alobi biloko ya Jean-Pierre Bemba, lokola pepo sambo mpe ba villas misato na mboka Portugal bitikalaki kopola mpamba ntango ye azalki na boloko.

Jean-Bemba afundamaki mpo na crimes contre l’humanité mpe crimes de guerre na biutmba ya ba soda na ye na Centrafrique, kasi bamotikaki na sanza ya motoba moleki mpo na bozangi bilembo.

XS
SM
MD
LG