Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

MLC ebengi bato kotambola samedi nsima na invalidation ya ba parlementaires ya opposition


Mme Eve BAzaiba azali koyebisa Jean Pierre Bemba makambo na Kinshasa, RDC, 1er août 2018.
Mme Eve BAzaiba azali koyebisa Jean Pierre Bemba makambo na Kinshasa, RDC, 1er août 2018.

MLC, Mouvement mpo na libération ya Congo, lingomba ya Jean-Pierre Bemba, esengi na bato kotambola o’mokolo ya mposo mpo na koboya bolongoli ya ba parlementaires ya opposition na mokano ya Cour constitutionnelle.

Cour constitutionnelle elongoli ba parlementaires 23. Kati bango, ba députés nationaux 21. Mwambe ya MLC, sambo ya MCR, minei ya AMK, mibale ya Dyanimuqe mpe ba Sénateur mibale.

"MLC esengi na balandi na ye mpe na bana banso ya Congo eyano ekokani na matumoli maye, kolanda Buku likonzi na article 64, mpo na kosenga eloko mosusu te kasi bosolo ya maponami," elakisi liyebisi litiyami manzaka na Eve Bazaiba Masudi, kalaka mokonzi ya lingomba ya Jean-Pierre Bemba.

"Mikano ya Cour constitutionnelle mibebisami na mbeba mike mpo mipesami na ebonga mpe na bozangi ‘motivations’ mpe libanda ya kolanda ntango ya mikolo 50 maye masengami na mobeko na article 74," elobi MLC.

XS
SM
MD
LG