Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bemba akozonga na mboka nsima na mposo misato


Mme Eve BAzaiba azali koyebisa Jean Pierre Bemba makambo na Kinshasa, RDC, 1er août 2018.
Mme Eve BAzaiba azali koyebisa Jean Pierre Bemba makambo na Kinshasa, RDC, 1er août 2018.

Jean-Pierre Bemba, mokambi ya lingomba MLC mpe moko na bakambi ya lisanga Lamuka, akokita na Congo démocratique nsima na mposo misato, elobi Eve Bazaiba, kalaka mokonzi ya lingomba na ye, na meeting ya Martin Fayulu na Kisangani, na etuka yaTshopo.

"Na pesi bino mbote kowuta na Jean-Pierre Bemba. Atondi bino botondi mpo boponaki ebele Martin Fayulu na présidentielle. Ye moko nde aniati mabele ya Kisangani kala te. Akoya nsima ya mposo misato mpe akokende na bituka nionso na Congo," eyebisi Bazaiba.

Boyei ya M. Bemba esakolami ntango moko ya bakambi mosusu ya Lamuka, Moïse Katumbi, asengeli kozonga mboka le 20 mai lokola alakaki.

"Nayoki bato koloba ete Lamuka ekufi, etikali kaka mwa ndambo ya bato. Lokuta ! Lamuka ezali Jean-Pierre Bemba, Moïse Katumbi, Freddy Matungulu, Mbusa Nyamwisi, Adoplhe Muzito, Eve Bazaiba... Ezali bana ya Congo. Nangaa, Kabila na Tshisekedi bazali na soni bisika bazali. Kasi Congo ekokufa te," elobi na ngambo na ye Marin Fayulu.

Mpo na M. Fayulu, bozongi ya baninga baye bokokomisa makasi lingomba na bango Lamuka.

XS
SM
MD
LG