Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Misala mya bosembo ya Belgique mipesi ndingisa ya kozongisa miye mitikala na nzoto ya P.E Lumumba


Premier Ministre ya yambo ya RDC Patrice Lumumba na Maroc, le 08 août 1960. / AFP PHOTO
Premier Ministre ya yambo ya RDC Patrice Lumumba na Maroc, le 08 août 1960. / AFP PHOTO

Miye mitikala na nzoto ya nkondo Patrice Emery Lumumba, Premier ministre ya yambo ya RDC, mikoyeba na kozongisama na libota lya ye, ekati misala mya bosembo mya Belgique.

Misala mya bosembo mya Belgique mipesi ndingisa ete miye mitikala na nzoto ya Patrice Emery Lumumba miyeba na kozongisama na libota lya ye.

Zuzi oyo azali kolendela makambo mango alobi ezali kaka eteni moko, linu nde ekozongisama ntango parquet fédéral ekozwa mokano.

"Ezali esengo mingi mpo esali mibu mingi moto moko abomba ba restes ya nzoto ya koko na biso. Tokoki koloba kaka ete mitema mya libota mikitisami na koyoka mokano yango," elobi Jean-Jacques Lumumba, moko na bakoko ya Patrice Emery Lumumba.

Libota lya P.E Lumbumba likoba na kosenga miye mitikala na nzoto ya Premier ministre ya yambo ya RDC.

P.E. Lumumba akufaki na Haut-Katanga na 1961. Basoda ya Katanga ya kala babetaki ye masasi mingi, bayi bokengi ya Belgique bataka nzoto na ye mike mike mpe bazindisaki yango na acide, kolanda litatoli ya moko ya bayi Belgique apesaka na parlement Belge.

Moto oyo nde alobaka atikala na linu na ye moko.

Patrice Emery Lumumba asakolama héros national na RDC.

XS
SM
MD
LG