Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi akeli Lumumbaville na bokanisi mibu 60 ya Lipanda


Président Félix Tshisekedi na Kinshasa, 29 juin 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na Kinshasa, 29 juin 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi asakoli bokelami ya Lumumbaville na etuka ya Lomami mpe atie bakambi na yango, na lisikulu na mpo na mibu 60 ya lipanda ya RDC.

Lisakoli liye likomisi solo bokelami nwa engumba na nkombo ya Premier ministre ya yambo ya Ekolo Congo démocratique, moyi Congo, Patrice Emery Lumumba. Yango ewumela na mabongisi wuto Conférence nationale souveraine ya 2003.

Félix Tshisekedi akebisi ete akondima soki moke te mikano miye mizali kotambola likolo na malako ma Buku likonzi mabatelaka bonsomi bwa misala mya Bosembo.

Akebisi baye basala ete kozala moyi politiki ekoma likambo ya kolula na bilenge banso ya RDC.

Mpo na ye, ezali baye batingama na politiki mpe bakomisa yango lokola "mafia" nde basali yango.

Alobi ete alaki mabe te na bato baye kasi azali na elikya ete nde bangwami.

Président Tshisekedi alaki mpe kosala lisusu makasi mpo ete bilenge bayekola misala mpe makambo misusu ya malamu ya kosala. Alobi yango nde afungola ete ekolo na makambo matali informatique.

Alobi mpe ete mibu 60 mizali ya kotala mpe kosukisa maye matambolaki malamu mpo na moyibi. Atangi kati na yango mabongisi ma milona ya Bukanga lonzo.

Alobeli milona mya manioko mpe misusu mizali kosalama wuto azwaki bokonzi.

Akumis boyokani na ba "noko" ya Belgique.

XS
SM
MD
LG