Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Pene na nzoto 26 ezwami nsima na bokweyi ya mpepo na Goma (Birere)


Pene na nzoto 26 ezwami nsima na bokweyi ya mpepo na Goma (Birere)
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:01:00 0:00

Mpepo moko ya moke (Dornier 228-100) ekweyaki o’mokolo ya eyenga na ntongo na bomati na yango, na libanda ya mpepo ya Goma (Nord-Kivu) mpe ebomi koleka 26, eyebisi mbulamatari. "Motango ya kozela elakisi bawei 26, koloba ba basali mobembo 17, bayi equipages 2 mpe bato 7 na mabele," elobi luebisi etiyami manzaka na vice-ministre ya Transports mpe voies ya Communication, Jacques Yuma. Banzeneneke nayebisi correspondant ya VOA Lingala ete bato sambo bawei nan se bazalaki ya libota moko. Mama na bana baye. Mpepo yango ezalaki ya compagnie Busy Bee, ekwayaki ntango na bomati na yango. Esukaki likolo ya ndako moko na quartier populaire ya Birere, eyebisi correspondant ya VOA Lingala. Mbulamatari etindi lipinga ya bolukiluki. Mpepo yango ememaki bato zomi na sambo (17) na bayi equipages babale (2) mpe emamaki misolo ya Trust Merchants Bank (TMB), basali ya banque eye mpe bayike ya bakonzi batali mambi ya mabele, ezalaki kokende na Beni. Bolukiluki bozali naino kosalama.

Mpepo yango ezalaki ya compagnie Busy Bee, ekwayaki ntango na bomati na yango, esukaki likolo ya ndako moko na quartier populaire ya Birere, eyebisi correspondant ya VOA Lingala.
Ememaki bato zomi na motoba (16) na bayi equipages babale (2) mpe emamaki misolo ya Trust Merchants Bank (Bank), basali ya banque eye mpe bayike ya bakonzi batali mambi ya mabele, ezalaki kokende na Beni.
Bolukiluki bozali naino kosalama.
Bayi nzinganzinga balobi ete libota epayi wapi mpepo ekwayaki lizalaki na bato zomi, mama na bana sambo bakufi, tata abimaki na mwana moko.
XS
SM
MD
LG