Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi aleki na mabota ya baye bazalaki na Antonov 72


Président Félix Tshisekedi elongo na molongani wa ye Denise Nyakeru na libota ya moko ya basungi ba ye babungi na likama ya Antonov 72, na Kinshasa, RDC, 15 octobre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi elongo na molongani wa ye Denise Nyakeru na libota ya moko ya basungi ba ye babungi na likama ya Antonov 72, na Kinshasa, RDC, 15 octobre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix azalaki na mabota ya basungi ba ye baye bazalaki na Antonov 72 oyo biteni na yango bimonani na Kole, na Sankuru nsima na bokweyi na yango o'mokolo ya le 10 octobre na nzela ya bozongi na Kinshasa kolongwa na Goma.

Elongo na molongani na ye Denise Naykeru, M. Tshisekedi atalaki mabota ya basungi ba ye baye, na commune ya Limete mpe Kinshasa, eyebisi présidence ya république.

"Kati na bato baye bazalaki na mpepo eye, mpe sango epesami te, ezali na Patric Mukadi mpe Dipanga Divioka oyo abangamaki 'Maréchal', mokumbi ya motuka ya président Tshisekedi," eyebisi présidence ya RDC na page Facebook na yango.

"Ezalaki ntango ya mpasi na motema mpo na balongani mpe bana ba baye babungisi elikya inso," kolanda présidence RDC.

M. Tshisekedi ayoki mpasi mingi na motema nsima na bobungi ya basungi baye, ebakisi présidence ya RDC.

XS
SM
MD
LG