Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato banei bakufi na botelemeli MONUSCO na Beni (Parquet FARDC)


Bitulu ya bavandi ya Beni batomboki na lopango moko ya MONUSCO na Beni, Nord-Kivu, 25 novembre 2019.
Bitulu ya bavandi ya Beni batomboki na lopango moko ya MONUSCO na Beni, Nord-Kivu, 25 novembre 2019.

Pene na bato banei bakufi na botelemeli MONUSCO na Beni, na Nord-Kivu, eyebisi parquet ya misala ya bosembo ya mampinga ya ba FARDC.

"Bato banei bakfui mokolo ya lelo", eyebisi auditeur ya mampinga, Kumbu Ngoma.

Mpo na ye, "moto ya mitano akoki kokufa na mpokwa".

"Bato bazokaki bazalaki zomi, bakasi basoda ya Congo (démocratique) misato', ebakisi procureur Kumbu.

Bavandi ya Beni batombokaki nsima na bobobami ya bato pene na mwambe na quartier Masiani.

B’episkopo ya katoliko ya CENCO (Conférence épiscopale nationale ya Congo) bapaleli kufa ya bato koleka 80 na maboko ya batongi ya ADF wuto libandela ya sanza ya zomi na moko.

XS
SM
MD
LG