Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Biteni ya nzoto esusu bizwami bisika ya likama ya Antonov 72


Biteni ya mpepo Antonov 72 pene na mboka Okoto, na Kole, Sankutu, 16 octobre 2019. (Facebook/Danico Kalombo)
Biteni ya mpepo Antonov 72 pene na mboka Okoto, na Kole, Sankutu, 16 octobre 2019. (Facebook/Danico Kalombo)

Biteni ya nzoto esusu bizwami bisika ya likama ya Antonov 72 eye ekweyaki mposo moko moleki na kowuta Goma.

Ba experts to banganga ya boluki baye bazali kosala mosala na Okoto, na Sankuru bayebisaki sango yango na lipinga ya baye ya mbulamatari liye likomi kuna.

Mercredi, nzoto ba bato basusu basoto ememamaki na Kananga mpe etiyamaki na morgue nsima na bokundolami na Okoto.

Nzoto yango nde momemaki na Kinshasa mpo kotala soki ezali ya banani mpo mpepo yango emamaki bato mwambe to koleka, elobaki mokambi ya press présidentielle na VOA Lingala.

XS
SM
MD
LG