Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nzoto ya cardinal Monsengwo ekozongisama le 19 juillet na Kinshasa (Gouvernorat ya Kinshasa)


 Le Cardinal Laurent Monsengwo Pasinya, à la salle Paul VI du Vatican, le 20 novembre 2010.
Le Cardinal Laurent Monsengwo Pasinya, à la salle Paul VI du Vatican, le 20 novembre 2010.

Nzoto ya nkondo cardinal Laurent Monsengwo Pasinya ekozongisama na Kinshasa le 19 juillet mpe ekokundama na cathedral Notre Dame du Congo, kolanda Bakonzi ya enguma Kinshasa.

Mokolo mwango mosalakolami nsima na bokutani ya mokambi ya engumba Kinshasa, Gentiny Ngobila, na ba episkopo basusu mpe bayi libota lya cardinal Monsengwo.

Episkopo ya lokumu ya kala ya Kinshasa, cardinal Monsengwo akufaki o'mokolo mwa eyenga na Versailles na France esika amemamaki mposo moleki mpo na lisalisi na bokono azalaki na yango.

Matotali mapesami mingi na bayi politiki mpe basusu nsima na liwa lya ye. Mingi bandimi bitumba cardinal Monsengwo asalaki mpo na dmocratie mpe sembo na bomoi ya bana mboka.

XS
SM
MD
LG