Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Losambo losengami mpo na lobiko ya Cardinal Monsengwo

Mgr Laurent Monsengwo (79 ans), D, episkopoko ya lokumu ya kala ya archidiocèse ya Kinshasa, elongo na Mgr Fridolin Ambongo oyo azali na ebonga yango sika, Kinshasa, na photo etiamaki le 1er novembre 2018. (Facebook/ Abbé Jmk Noblesse Oblige)

Cardinal Laurent Monsengwo esengeli amemama na bangonga ekoya na Paris, na France, mpo na lisili lya nzoto.

O'mokolo mwa eyenga, episkopoko ya lukumu ya Kinshasa, cardinal Frindolin Ambongo asengaki na ba Kristu mpe na bana ba Ekolo Congo démocratique banso kobondela mpo na cardinal Monsengwo.

Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi na molongani wa ye lokola mpe bato mingi basusu bakendaki kotala cardinal Monsegnwo mpe babondelaki mpo na ye.

"Lokola moto nyonso, cardinal Monsengwo azali na mwa nkwokoso ya nzoto. Kasi, manso masalami mpo na amemama lundi 5 na ntongo na Paris na mpepo moko ua minganga. Matondi mingi mpo na losambo nan tina na ye. Bobangi te, Nzambe azali na nyonso na maboko," elobi mosala ya sango na ye compte Twitter ya abbé Jean-Marie Konde.

XS
SM
MD
LG