Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mgr Ambongo akokelama cardinal o’mokolo ya mposo


Episkopo ya lokumu ya Kinshasa, Mgr Frindolin Ambongo na misa ya Noel na Kinshasa, 24 décembre 204.
Episkopo ya lokumu ya Kinshasa, Mgr Frindolin Ambongo na misa ya Noel na Kinshasa, 24 décembre 204.

Mgr Fridolin Ambongo akokelama to akotiama cardinal o’mokolo ya mposo, 5 octobre 2019, na Papa wa Roma.

Président Félix Tshisekedi mpe bakonzi ebele ya ekolo Congo démocratique ata baye ya opposition nzike, lokola Martin Fayulu, bakozala na milulu myango na Roma.

Mgr Ambongo akozala kati na ba episkopo zomi na misato baye bokokota na molongo ya ba cardinaux na milulu myango.

Na mibu 59, Mgr Ambongo akitanaki na Cardinal Laurent Monsengwo na ebonga ya episkopo ya lokumu ya Archidiocèse ya Kinshasa, le 25 novembre 2018.

Mgr Monsengwo azwaki retraite na ye mpo aleki mibu 75 ya bomoi.

Yambo ya ebonga na Kinshasa, Mgr Ambongo azalaki episkopo ya lokumu ya Mbandaka-Bikoro uto le 12 novembre 2016. Azalaki mpe vice-président ya CENCO (Conférence épiscopale nationale ya Congo). Atelemelaki na bokasi président ya kala Joseph Kabila ntango mapona masalemaki te. Azalaki mpe moko na bakambi ya dialogue to masolo ya politiki maye mapesaki nzela na maponami ya le 30 decembre 2018 maye mabimisaki Félix Tshsiekedi lokola mokonzi ya ekolo.

Azalaki mokambi ya ba frères mineurs capucins ya RDC mpe mokambi ya Assemblée ya ba supérieurs majeurs ASUMA mpe ya ba frères mineurs capucins na Afrika (CONCAU). Mpe akomaki episkopo ya Bokungu Ikela le 6 mars 2005.

Akomaki sango le 14 août 1988 nsima kelasi ya morale ya Académie ya Rome. Atangisaki mpe théologie morale na Université catholique ya Kinshasa.

XS
SM
MD
LG