Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moto ya mibale amonani na Ebola na Uganda


Mwasi moko na mwana wa ye batalisami mpo na Ebola na lopitalo ya Bwera, Uganda, 14 juin 2019.
Mwasi moko na mwana wa ye batalisami mpo na Ebola na lopitalo ya Bwera, Uganda, 14 juin 2019.

Moto ya mibale azwami na virus ya Ebola na Uganda o’mokolo ya minei.  "Ezali elenge mwasi ya mibu libwa oyo awuti na RDC, asalaki mobembo na mama wa ye le 28 août 2019," ekomi na liyebisi ministère ya mambi ya bokolongono ya Uganda.

Mwana yango na mama wa ye bakotaki na nzela ya Mpondwe, mboka ekanga na RDC, mpo na koluka lisalisi na Bwera, na district ya Kasese.

"Mwana yango alakisaki bilembo lokola bolembu ya nzoto, makwanza mpe makila na monoko," eyebisi bakonzi ya misala ya bokolongono na nzoto.

Atiyamaki na esika kokangama mpe amemami na lopitalo ya Bwera esika wapi azali kosalisama, ebakisi ministère ya mambi ya bokolongono.

"Makila maye mazwamaki malakisi o’mokolo ya le 29 août ete elenge mwasi yango azali na Ebola. Lokola azwamaki na Ebola nsima na bokoti na mboka, asimbaki bato basusu te awa," elimbola mokanda ya ministère ya Santé.

Bakonzi ya Uganda basengi bana ya ekolo na bango bazala na kimya kasi bazala mpe bokengi.

Ezali mbala ya mibale bokono ya Ebola bomonana na Uganda. Banso bawutaki na RDC.

Ya liboso ezalaki na sanza ya motoba. Ezalaki elenge mobali ya mibu mitano. Awutaki na RDC esika wapi Ebola esili kobama bato koleka 1.950 na mobu moko yango ezali kongala na monyele ya RDC.

XS
SM
MD
LG