Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moto ya misato azwami na Ebola na Mwenga mpe ya yambo na Walikale


Moko na basali ya bokolongono azali kosali mwana na centre ya traitement ya Ebola, na Butembo, 13 août 2019. (Unicef)
Moko na basali ya bokolongono azali kosali mwana na centre ya traitement ya Ebola, na Butembo, 13 août 2019. (Unicef)

Moto ya misato amonisami na Ebola na Mwenga, na Sud-Kivu, elobi bakambi ya misala ya bokolongono na RDC.

"Ezali kaka kolanda oyo ekomaki na Mwenga mposo moleki. Moto moko kati na baye bazalaki na mwasi oyo akufaki kuna nde amonani na virus yango," eyebisi VOA Lingala, Dr Steve Ahuka, coordonnateur général ya bitumba na Ebola.

Mwasi yango, elenge ya mibu tuku mibale na motoba, akufaki o’mokolo ya minei moleki na Ebola. Awutaki na Butembo mpe asalaki mobembo na bana babale.

Mwana ya sanza motoba na mwasi yango ya mibu ye mpe azwamaki na virus yango.

Nzokande moto mosusu mpe amonisami ya virus yango na Pinga, na etando ya Walikale na Nord-Kivu, elobi bakambi ya misala ya bokolongono.

Kolanda ministère ya santé, bato 2.877 nde bazwami na bokono yango, bato 1.934 nde bawei mpe bato 862 nde babikisami.

XS
SM
MD
LG