Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Kintuntu ebomi bato koleka 5.000 (OMS)


Babeli na lopitalo ya référence ya Minova, Nord-Kivu, RDC, le 13 février 2018. (VOA/Charly Kasereka)
Babeli na lopitalo ya référence ya Minova, Nord-Kivu, RDC, le 13 février 2018. (VOA/Charly Kasereka)

Kintuntu ebomi koleka bato 5.000 na ekolo Congo démocratique wuto sanza ya yambo, koleka virus ya Ebola eye ezali kongala wuto sanza ya mwambe ya 2018 na mboka, esakoli OMS (Mabongisi ya molongo mpo bokolongono).

"Bokono eye ya RDC ezali ya monene koleka na mokili. Ezali ya makasi koleka oyo tomona," elobi Kate O’Brien, mokambi ya département ya mangwele ya OMS, na bokutani na bapanzi sango na Genève.

Bato 250.270 bazwami na bokono yango na RDC mpe bato 110 bawei o’mokolo ya le 17 novembre, kolanda Mme O’Brien.

Bokono ya mbala eye bobandaki sanza ya motoba mpe ya mwambe. Bopesi mangwele bonene bozali kopesama.

OMS eyebisi ete bopesi mangwele bokosila kino suka ya mobu.

Mme O’Brien alobi ete kintuntu epanzani na mboka mobimba mpe bato bazali kozwa yango mingi ezali bana mpe ba bebe.

XS
SM
MD
LG