Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi asengi lisungi ya SADC mpo na kobundisa ba ADF


Mokonzi Felix Tshisekedi, na Kinshasa. (Photo ya le 15 aout 2019/Twitter Fatshi News)
Mokonzi Felix Tshisekedi, na Kinshasa. (Photo ya le 15 aout 2019/Twitter Fatshi News)

Président Félix Tshisekedi asengi na bakokani ba ye, bakambi ya bikolo ya SADC (Lisanga ya ntombwa ya bikolo ya ngele ya Afrika), na Dar-es-Salaam (Tanzanie), kosangisa makasi mpo na kobundisa batomboki ya ADF na monyele ya RDC.

M. Tshisekedi apesaki lisikulu na ye o’mokolo ya mposo na bokutani ya mbala tuku misato na libwa ya bakambi ya bikolo ya SADC.

Asengi bokelami ya limpinga ya boyokani na etuka Afrika ya ngele (SADC) mpo na kosukisa misala ya ba ADF-MTN. Azwi ndakisa na bosangisami ya molongo mpo kobundisa misala ya badongolamisu (le terrorisme).

"Nalingi na senga awa bondeko na bino banso mpo na mboka na ngai mpe mpo na bana na yango, mpo ete na suka ya misala miye, na komekolaka Brigade Spéciale ya Monusco oyo epanzaki ba N23, tozwa mokano ya makasi ya koyikisa makasi ya mampinga ya Congo démocratique, mpe kosukisa mbala moko na mangomba mazali koboma mingi mpe kobebisa na mboka na ngai," elobi M. Tshisekedi.

Mpo etali bokono ya Ebola moye mobomi na mobu moko koleka bato 1.900, mokonzi ya RDC apesi longonya na Dr. Jean-Jacques Muyembe oyo amonaki na 1974 virus ya bokono boye, asalisa mbala ebele kosukisa yango mpe azwi nkisi MAB114 mpo na kobikisa babeli ya bokono yango.

M. Tshisekediayebisi ete gouvernement ya Japon ekopesa Dr. Muyembe mbano na sanza ya mwambe ekoya mpo na misalsa na ye ya malamu.

XS
SM
MD
LG