Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto moko akufi mpe bato basusu babale bazoki na ba bombes artisanales misato ebeti na Beni


Basoda ba kimya ba MONUSCO na bisika bombe moko artisanale ebeti na ndako ya Nzambe moko ya katoliko Emmanuela Butsili, na Beni, Nord-Kiv, 27 juin 2021.
Basoda ba kimya ba MONUSCO na bisika bombe moko artisanale ebeti na ndako ya Nzambe moko ya katoliko Emmanuela Butsili, na Beni, Nord-Kiv, 27 juin 2021.

Ba bombes artisanales misato (basala na maboko) ebetaki o’mokolo mwa eyenga na Beni, moto moko akufi mpe basi babale bazoki, elobi bakambi ba etuka. Ezali mbala ya yambo attaque na bombe esalama na engumba eye ba ADF bafundamaka na kosala bitumba.

Mokambi ya soda ya engumba Beni, Colonel Narcisse Muteba Konga atie couvre-feu.

"Nalingi namona moto moko te na nzela. Bato banso bamibomba nzambi na sango tozwi, likambo mosusu lizali kobongisama. Nalingi namona kaka ba policiers mpe basoda na nzela," elobi colonel Muteba na bapanzi sango.

Bombe ya liboso ebetaki na 6h00. Colonel Mueba alobi ete ezalaki “bombe artisanale” mpe etiamki kati na ndako ya Nzambe ya katoliko assompitionniste.

Basi babale bazoki mpe bombe yango ebataki ntango bato bato babandaki kosangana mpo na milulu ya sacrément ya confirmation, eyebisi vicaire general ya Beni, Mgr Laurent Sondirya.

“Balingaki esalama ntango bato bakozala mingi mpo bana na baboti ba bango balingaki kozala mingi na milulu myango, ebakisi Mgr. Sondirya.

Bombe ya mibale ebetaki na 19h30, mpe moto azalaki komema yango akufi ntango ebeti pene na ekala ya masanga epayi bato pene na zomi bazalaki komela, na commune ya Rwenzori, elobi colonel Muteba.

Ezali mbala ya liboso ba bombes ebetama na Beni.

Bureau conjoint ya Nations unies nde elobi ba bombes misato nde ebetaki mpe emali yango.

"BCNUDH epameli makasi bituka na bisaka ya losambo na Beni na baye bayebani te. Ba engins explositifs misato ebetaki na ndako ya nZambe mibale mpe pene na mosquée moko ntango basambeli bazali na mayangani, le 26 mpe le 27 juin," ekomi na Tiwtter BCNUDH.

Ba ADF bafundamaka na kozala na lisanga ya bondongolomeso groupe état islamique to DAESH.

Beni, lokola etuka ya Nord-Kivu mpe ya Ituri ezali na état de siège président Félix Tshisekedi atiaki wuta sanza moko na koleka mposo misato.

XS
SM
MD
LG