Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etat de siège ebakisami mikolo 15


Basoda ya mampinga ya RDC pene na hélicoptère ya MONUSCO emati na Bijombo, Sud-Kivu, 10 octobre 2020.
Basoda ya mampinga ya RDC pene na hélicoptère ya MONUSCO emati na Bijombo, Sud-Kivu, 10 octobre 2020.

Assemblée nationale endimi kobakisa mikolo 15 nsima na maponami masalami jeudi na ndako ya mosala na bango, na Palais du peuple, na Kinshasa,

Bakeli mibeko 334 banimaki kobaki mikolo, moko aboyaki, mpe mosusu alobaki likambo te, kati na baye banso bazalaki na mponami mango.

Yambo na yango, bayokakni ndimbola ya ministre ya ya Bosembo mpe Garde des seceaux, Rose Mutombo oyo alobaki na nkombo ya mbulamatari ekambami na Mnistre wa Yambo Jean-Michelle Lukonde.

Mercredi, ministre ya Bobateli ya ekolo asakolaki, na milulu mya bolakisami na ye na mampinga, ete misala mya état de siège mikoti na ekolo ya kokende mbango.

Nzonkande, na bobomi na monyele mboka bokomi kosalama lisusu makasi.

Na mposo moko bato pene na 70 babomami na baye bafundami kozala basimba minduki to batomboki lokola ba ADF, ya Chini ya Kilima to AFPIC, mingi mingi na Ituri.

Président Félix Tshisekedi akosali état de siège yango sanza moko na ntina ya komema kimya na monyele ya mboka.

Bakambi ya basado mpe ya police batiama na bituka ya Nord-Kivu mpe Ituri.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG