Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etat de siège: Tshisekedi atie ba officiers ya police na bibonga ya ba Maires na Nord-Kivu mpe Ituri


Président Félix Tshisekedi kati na commandants ya ba opérations ya FARDC nsima na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshsa, RDC, 10 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi kati na commandants ya ba opérations ya FARDC nsima na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshsa, RDC, 10 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi atie bakonzi mwambe ya police na bibonga ya ba maires to mindele mboka na balandi ba bango na Nord-Kivu mpe Ituri.

Ba officiers batiami na bisika ya bacivili mpo na katambwisi bisika biye mpo na état de siège atiaki na esika wuto le 6 mai 2021.

Président Tshisekedi atiaki mpe bakambi ya basoda bo’ bakambi to ba gouverneurs ya bitu ya Nord-Kivu na Ituri.

Bayi makoki ma bomoto balobi bobangi bozali mpo etali botosi ya makoki ma bato.

Lokola bango, ntoma ya Etats-Unis na ONU, Linda Thomas-Greenfield alobaki mpe ete mboka na ye emitungisi mpo baike na baye batiami mpo kakamba batanga na bofundami mpo kobuka makoki ma bomoto.

Kasi président Tshisekedi akotelaki ba officiers atiaki mpe alobaki litomba ezali sik’oyo nde kosukisa bobomi na est.

XS
SM
MD
LG