Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Volcan Nyiragongo : Baye bakimaki na bisika ya lisalisi bakobanda kozonga le 8 juin


Bato baike na Goma na makolo ya ngomba Nyiragongo, 5 juin 2021.
Bato baike na Goma na makolo ya ngomba Nyiragongo, 5 juin 2021.

Mokambi ya soda atiamkaki mpo na état de siège na Nord-Kivu, Lieut.Gén. Constant Ndima Kongba asakoli ete bavandi ya Goma baye ndako na bango ebebisamaki, bakobanda kozongisama le 8 juin.

Lieut.Gén. Ndima, alobi ete bavandi ba engumba mokonzi ya Nord-Kivu baye ndako na bango ebebisami te bakoki kobanda kozonga sika oyo.

Apesi linaka lyango na bokutani na bapanzi sango Ministre wa Yambo, Jean-Michel Sama Lukonde, azalaki na yango na suka ya mobembo mwa ye na Nord-Kivu.

Kolanda lieut.Gén. Ndima, bozongi bokobanda na baye ya nzela ya Goma-Sake le 8 kino le 9 juin.

Basusu bakolanda nsima. Baye ba nzela Nyiragongo-Goma (le 10 juin), baye ba Rutshuru-Goma (11-12 juin), baye ba Bukavu-Minova-Goma (15-17), baye ba Butembo-Beni-Lubero-Goma (16-17 juin) mpe baye bako zonga wuto Rwanda (19-21 juin).

Mokambi ya etuka alobi masolo makokoba na baye ya société civile mpe basungi basusu mpo na kobongisa makambo manso.

Biteyelo nde bizongeli o’mwa le 14 juin.

Kolanda maloba ma lieut.Gén, Ndima, bokiti ya potopoto ya moto mpe boningani ya mabele bosili. Apesi ndingisa misala mizongela.

Bato baike basibazongaki na Goma mpe misala mingi mifongalamaki yambo bapesama ndingisa.

XS
SM
MD
LG