Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moko na basungi ya Tshisekedi akangami mpo na kopengwisa mosolo


Président Félix Tshisekedi kati na bana ya Congo bavandi na Atlanta nsima ya bokutani na bango, Atlanta, 28 septembre 2018. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi kati na bana ya Congo bavandi na Atlanta nsima ya bokutani na bango, Atlanta, 28 septembre 2018. (Twitter/Présidence RDC)

Moko na basungi ya president Félix Tshisekedi elongo na bato basusu babale bakangami mpo na kopengwisa mosolo, eyebisi moyi misala ya bosembo.

"Bafundami ba parquet mpo na kozwa commissions mpe kopengwisa misolo miwutaki na compagnie moko ya Canada", eyebeisi na AFP magistrat moko ya parquet.

Ministre wa yambo atemelaki bozwi mosolo boye. Ministre ya Portefeuille, Clément Kwete ayebisi yango na mokando moko motindamaki na mokambi ya MIBA.

M. Kwete alobi mosungi moye ya président Tshisekedi azali na "makoki te" mpe "ayibi mpifo" na kopesaka na compagnie Saint-Louis BGM SARL ndingisa ya kokende koyekola ndenge nini kobanda kozwa diamant na mabele ya MIBA (Société minière de Bakwanga).

"Premier ministre atelemeli mandat spécial (ndingisa) eye coordonnateur administratif ya ba services personnels ya mokonzi ya mboka apesi na compagnie Saint-Louis BGM SARL," elobi M. Kwete na mokanda mwango.

Mandat spécial yango epesi nzela na BGM SARL kokende koyekola ndenge nini ya kozwa diamant na Mbuji-Mayi na mabela mya MIBA.

Ministre ya Portefeuille asengi ete bato banso batosa mpenza malako ya bakonzi.

Mokanda mwango motindimaki mpe na Premier ministre mpe na makombi ya ndako ya misala ya président Tshisekedi.

Nzokande, Conseil d’administration ya MIBA epemisama uto libandela ya sanza ya zomi na moko.

XS
SM
MD
LG