Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi asengi FARDC etiya QG na Beni mpe esala elongo na Monusco


Président Félix Tshisekedi na bokutani ya mbalakaka na cité ya Union Africaine, Kinshasa, 25 novembre 2019. (Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na bokutani ya mbalakaka na cité ya Union Africaine, Kinshasa, 25 novembre 2019. (Présidence RDC)

Mampinga ya ekolo Congo démocratique bakotiya quartier général to likonzi na bango na Beni. Yango nde mokona monene mobimi na bokutani bwa mbalakaka président Félix Tshisekedi akambi o’mokolo ya mwa yambo.

Bokutani bwango bosalami na cité ya Union africaine na ntina ya mobulu mozali na Beni kolanda bobomami ya bato koleka sambo na quartier Masiani, na Beni.

Bavandi bayike ya engumba eye ya Nord-Kivu bakitaki o’balabala mpe bampunzaki mpe tiyaki moto na mairie mpe na base ya Monusco pene na Moikene.

Bokutani bwa mbalakaka boye bosalami na mokambi ya Monusco mpe moalkisi na elongi ya kalaka mokonzi ya ONU Leila Zerrugi elongo na vice 1er ministre ya Intérieur mpe Sésurité Gilbert Kankonde, ministre ya Défesnse Aimé NGoy Mukena, mokambi ya ANR, mokambi ya mampinga mpe ya police.

Mokano mosusu mozali ete Monusco na FARDC bakasala lisusu elongo makasi.

XS
SM
MD
LG