Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Kabila azalaki na bokutani ya FCC na Kisantu


Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC mpe mokambi ya FCC na bokutani ya lingomba liye na Kisantu, Kongo central, 28 novembre 2018.
Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC mpe mokambi ya FCC na bokutani ya lingomba liye na Kisantu, Kongo central, 28 novembre 2018.

Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC mpe mokambi ya FCC (Front commun pour le Congo) azalaki o’mokolo ya minei na retraite ya lingomba liye na Kisantu (Kongo central).

FCC ezali komanyola wuto le 26 novembre 2019 lolenge ekotambola kino maponami makoya.

"Ntango abengisaki likita liye, ndeko Joseph Kabila, mobandi mpe mokambi ya Front commun pour le Congo azali kozela ete tokanisa mosika koleka elonga ya lelo na maponami. Yango, mpo ete FCC ezala likolo na momekano moy," elobaki motambwisi ya FCC, Néhémie Mwilanya.

Bokutani yango bosangisi bakambi ya mangomba mpe masanga ya politiki mazali o’kati ya lingomba monene liye ya FCC.

Mikolo mileki mata mazalaki makasi kati na FCC na CACH (Cap pour le changement) ya président Félix Tshisekedi, na boyakani na bango ya kokamba ekolo.

XS
SM
MD
LG