Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi akiti na Zongo (Sud-Ubangi)


Président Félix Tshisekedi azali koyamba fololo na bokomi bwa ye na Zongo, Sud-Ubangi, le 2 décembre 2019. (Twitter/Cyrile Milandou)
Président Félix Tshisekedi azali koyamba fololo na bokomi bwa ye na Zongo, Sud-Ubangi, le 2 décembre 2019. (Twitter/Cyrile Milandou)

Président Félix Tshisekedi akomi le 2 décembre 2019 na engumba ya Zongo na Sud-Ubangi epayi wapi alingi amona na miso na ye moto mpasi eye mpela mpe bomati na mayi ya Ubangi epesa bavandi.

Koleka bato nkoto nkama mibale bazwi mpasi mpo bomati ya mayi maye, kolanda mbulamatari.

Mposo moleki, ministre ya lisungi mpe bosalisami, Steve Mbikayi amemaki makoki mayike mpo na kosalisa bavandi ya Sud-Ubangi bazali na mpasi ya mpela.

Mingi, ndako na bango, bilanga na bango mpe misala na bango mizindaki.

Félix Tshisekedi awutaki na Bangui, na Centrafrique epayi wapi azalaki wuto mokolo ya eyenga 1er décembre 2019 mpo na milulu ya kokanisa mibu tuku motoba na moko ya libanda ya ekolo eye.

Na milulu myango, président Faustin-Arhcange Touadera ya Centrafrique apesaki mokokani waye Felix Tshisekedi palata ya lokumu ebengami Ekulusu enene "Grand Croix".

XS
SM
MD
LG