Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na Bangui


Président Félix Tshisekedi apesi mbote na mokokani wa Ye Fautin-Archange Toudéra ya Centrafrique na bokomi bwa ye na Bangui, RCA, 1er décembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi apesi mbote na mokokani wa Ye Fautin-Archange Toudéra ya Centrafrique na bokomi bwa ye na Bangui, RCA, 1er décembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akomaki le 1er décembre 2019 na Bangui mpo na mobembo ya mikolo mibale.

Nsima na bokomi bwa ye, akitaki na bonkudoli ya mokolo ya lipanda ya ekolo Centrafrique.

Azalaki elongo na mokokani wa Ye Fautin-Archange Toudéra.

M. Tshisekedi azali mokonzi ya yambo ya kosala mobembo na Centrafrique mpe ya lala kuna, uto mibu misato, elobi présidence ya RDC.

Nsima na na Bangui, M. Tshisekedi esengeli azala na Sud-Ubangi epayi wapi akokende kotala bato baye bazwi mpasi nsima na mpela mpe na bomati na mayi.

Bato koleka 200.000 nde bazali na mpasi mpo na bomati ya ebale ya Ubangi, kolanda OCHA.

XS
SM
MD
LG