Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Washington elobi ekosunga RDC na 600 millions $


Mokambi ya USAID, Paul Sabatine (D) na ministre ya boyokani na molongo ya RDC, Pépin-Guillaume Manjolo bazali kotiya manzaka na boyokani mpo na lisungi ya Etats-Unis na RDC, na Kinshasa, RDC, 21 novembre 2019. (Facebook/Ambassade ya USA na Kinshasa)
Mokambi ya USAID, Paul Sabatine (D) na ministre ya boyokani na molongo ya RDC, Pépin-Guillaume Manjolo bazali kotiya manzaka na boyokani mpo na lisungi ya Etats-Unis na RDC, na Kinshasa, RDC, 21 novembre 2019. (Facebook/Ambassade ya USA na Kinshasa)

Etats-Unis esakoli lisungi ya 600 milliions $ mpo na ekolo Congo démocratique kino 2022 mpo na kopesa maboko na mbogwana mosalami na mboka eye wuta bokoti na bokonzi ya président Félix Tshisekedi.

Boyokani mpo na lisungi liye botiyamaki manzaka kati na mokambi ya USAID, Paul Sabatine mpe ministre ya boyokani na molongo ya RDC, Pépin-Guillaume Manjolo Buakila.

"Mbulamatari ya USA ezali kosunga mbongwana ya président Tshisekedi," elobi ntoma ya Etats-Unis na RDC, Mike Hammer na liyebisi ya ambassade.

"Lisungi yango ezali mpo na kopesa maboko na misala ya biteyelo, ya kokolisa nkita, ya bokolongono, ya bitumba na kanyaka mpe bokambi bolamu, ya kobatela environnement mpe aide humanitaire," elobi liyebisi.

Boyokani boye bomatisi lisungi ya amerika na misala miye na $1,25 milliards $ wuto 2015, elakisi liyebisi.

Na ngambo na yango, ekolo France elaki kopesa 71 millions ya ba euros mpo na mambi ya bokolongono.

Président Emmanuel Macron asakolaki ntango ayambaki M. Tshisekedi o’libandela ya sanza ya zomi na moko, ete mboka na ye ekopesa 65 millions d’euros mpo na kosunga misala ya kotonga mpe kobongola RDC.

Na sanza ya mitano na Kinshasa, ministre ya France ya mambi ya bapaya Jean-Yves Le Drian alakaki linaka ya 300 millions euros na bowumeli ya mandat ya M. Tshisekedi kino 2023.

M. Tshisekedi azali kokamba na boyokani na mokonzi ya kala Joseph Kabila oyo azali na bato ebele koleka na parlement mpe na bituka 26.

XS
SM
MD
LG