Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

USA, Canada, Royaume-Uni na Suisse bapaleli botelemeli Monusco


Ntoma to ambassadeur ya Etats-Unis, Mike Hammer (G), elongo na mokambi ya USAID Mark Green (C), n a bokutani na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, na Cité ya union Africaine, Kinshasa, 19 août 2019. (Facebook/Ambassade USA/Kinshasa)
Ntoma to ambassadeur ya Etats-Unis, Mike Hammer (G), elongo na mokambi ya USAID Mark Green (C), n a bokutani na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, na Cité ya union Africaine, Kinshasa, 19 août 2019. (Facebook/Ambassade USA/Kinshasa)

"Tosepeli te na lolenge bazali kobundisa Monusco mpe topesi mpenza maboko na représentante spéciale ya Kalaka mokonzi ya Nations unies na ntango eye ya mpasi," ekomi ba Chefs ya mission ya Etats-Unis, Canada, Royaume-Uni mpe Suisse na liyebisi.

Ba Chefs de mission ya bikolo biye bayebisi ete bayebi "mpasi eye ezali na mitema ya baye bavandi na bisika makambo maye mazali kosalama mpe bonsomi na bango ya kolakisa nkanda na bango na kimya nyonso".

Wuto libandela ya mposo bato bazali kotelema Monusco na Beni, Butembo, Oicha, mpe bisika misusu na etuka ya Nord-Kivu nsima na bobomami ya bato 27 na ba ADF na Oicha na butu ya mokolo ya eyenga na ya yambo.

B’episkopo ya eklezia katoliko bapalelaki bobomami boye mpe balobaki ete ba ADF babomi pene na bato 100 wuto sanza ya novembre ebandaki.

Ba Chefs ya mission ya USA, ya Canada, R-U mpe Suisse bapesi losako na président Félix Tshisekedi mpo na koyikisa makazi boyokani kati na FARDC na Monusco na misala ya kobengana basimba minduki na Beni.

XS
SM
MD
LG