Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Misala mya bitumba na Ebola mifutaki misolo na basimba minduki mpe bayi mampinga (GEC)


Mosala ya bokolongono na bitumba na Ebola na Beni, Nord-Kivu, 16 avril 2019.
Mosala ya bokolongono na bitumba na Ebola na Beni, Nord-Kivu, 16 avril 2019.

Misala bayi molongo basalaki mpo na kobundisa Ebola kati na 2018 mpe 2019 mifutaki misolo na basimba minduki mpe na bayi mampinga mpo na kozwa nzela ya kokoma bisika bakoni bazalaki na Nord-Kivu mpe Sud-Kivu, elobi Groupe d’étude sur le Congo (GEC).

GEC (mabongami malandelaka makambo ya RDC kasi mazalaka na Université ya New York, na Etats-Unis) elobi bopesi misolo na basimba minduki mpe na bayi bokengi bomemaki botelemeli ya bavandi.

Rapport ya GEC mpo na yango ebimisaki jeudi.

GEC esengi ete misala mya molongo mimipekisa kosala boye mpo na kotia yambo makoki ya bavandi.

Balikuluki ba GEC balobi bofuti misolo miye na basimba minduki mpe bayi mampinga bozalaki mpo na kopesa bokengi na basali ba bokolongono mpe kopesa bango nzela ya kokoma bisika bakoni bazwamaki.

Na yango, ezala basimba minduki mpe bayi mampinga bakomaki komona Ebola lokola monguna na bango banso esengeli kobundisa.

GEC ekundoli mambongisi lokola OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongono) mafutaka mbala misusu babundi na bisika biike, na kobukaka mibeko mya ONU, na ntina ya koboluka kokisa batu.

GEC epameli misala miye.

XS
SM
MD
LG