Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

USA ekebisi na ba "attaques" ya badongolemeso na Noël na Beni


Basoda ya FARDC na Beni, Nord-Kivu, 2018.
Basoda ya FARDC na Beni, Nord-Kivu, 2018.

Ambassade ya Etats-unis na Kinshasa ekebisi mpo ba attaques to bitumba badongolomeso bakoki kosala o’mokolo mwa Noël na Beni, na Nord-Kivu.

Etats-Unis elobi na site internet ya ambassade ete "ezwi sango ya solo mpe siki siki ete likama lya bitumba ya ba dongolemso to ba terroriste ekokisalama o'mokolo mwa Noël na ba ndako ya Nzambe mpe bisika misusu ya biyamba ya baye bazali ba musilimani te".

Lingomba Etat islamique elobi yango nde libuki boloko ya Kangbayi (Beni) [TOTALA]
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:02:29 0:00

"Ambassade ya USA ezali kokoba kokebisa bayi Amerika kozala na bokebi kosala mibembo na etuka ya Nord-Kivu," elobi liyebisi ya ambassade.

Na sanza ya zomi, ya motoba mpe ya mitano, Lingomba etat islamique esakolaki ete esalaki ba attaques na Beni.

Na octobre, Lingomba Etat islamique esakolaki ete ebukaki boloko bonene ya Kangbay mpe limemaki bakangami 1.300 ntango ezango ebetaki esaki mosusu esimbamaki na mampinga ma RDC (FARDC) na nzela ya ba ADF.

XS
SM
MD
LG