Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bopesi mwangwele ya Ebola bobandi na Butembo


Mosali ya bokolongono azali kopesa mangwele ya Ebola na mwasi moko na Butembo, Nord-Kivu, 15 février 2021. (Twitter/OMS RDC)
Mosali ya bokolongono azali kopesa mangwele ya Ebola na mwasi moko na Butembo, Nord-Kivu, 15 février 2021. (Twitter/OMS RDC)

Bakambi ba RDC babandi lundi misala mya bopesi mangwele ya Ebola na Butembo, na Nord-Kivu, epayi wapi bato babale bakufi na Ebola nsima na bokono komonisama lisusu na monyele ya mboka.

"Basalaki ba bokolongono ya lopitalo ya Matanda epayi moto wa yambo apesamaki lisalisi mpe bato ba liboso bazwaki mangwele," eyebisi OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongo).

Moto ya mibale akufaki na bokono bwa Ebola na Biena, na Butembo, le 10 février 2021.

Moto mwa yambo akufaki, ezalaki molongani ya mokoni mosusu abikaka kala na Ebola. Mwasi yango akufaki le 1er février 2021.

Bato koleka 161 batiami na botalami mpo bazalaki na pene na mwasi yango.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG