Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ebola ya mbala 11 esili na Equateur (Dr. Eteni Longondo)


Mokambi ya cellule technique ya bitumba na Ebola Dr. Jean-Jacques Muyembe (g) na ntoma ya merika na Kinshasa Mike Hammer, na Mbadaka, Equateur, otobre 2020. (Twitter/Ambassade Etats-Unis Kinshasa)
Mokambi ya cellule technique ya bitumba na Ebola Dr. Jean-Jacques Muyembe (g) na ntoma ya merika na Kinshasa Mike Hammer, na Mbadaka, Equateur, otobre 2020. (Twitter/Ambassade Etats-Unis Kinshasa)

Bokono bwa Ebola bozalaki kongala na etuka ya Eqauteur bosili, esakoli ministre ya Bokolongono bwa nzoto, Dr. Eteni Longondo.

Ministre Eteni alobi ete mikolo 42 mileki mpe moto moko te ya sika azwami na Ebola na Equateur.

Ezalaki mbala ya 11 nde Ebola engalaki na RDC.

Bato 55 nde bakufi na Ebola na Equateur wuto ebandaki na sanza ya motoba.

Bato 130 nde bakanisami ete bazwakaki na yango. 119 bandimamaki mpe 11 ntango mosusu.

"Tozali kosala na basungi basusu mpo na kotala ndenge nini kosala mpo ete Ebola ezango lisusu," elobi Chargé ya bureau ya OMS, Dr Prosper Djiguimdé.

Ebola ezongaka mingi na RDC. Esi ezongi mbala 11.

Tibor Nagy, Sous secrétaire d’Etat ya Amerika Akomi na Twitter alobi ete "Etats-Unis ezali na lipombo to ezali fier ya kozala mosungi ya monene ya maye matali bokolongono mpo na Bokono bwa mbala ya zomi na moko ya Ebola bosili na mboka eye".

Ezali mbala ya yambo ete RDC ezala na Ebola te wuto na lapaki ndayi ya kozwa ebonga na ngai, ekomi M. Ngay na Twitter.

XS
SM
MD
LG