Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto ya mibale akufi na Ebola na Biena  (OMS)


Ba experts ya OMS ya bitumba na Ebola bakomi na Beni, na Nord-Kivu, RDC, 11 février 2021. (Twitter/OMS)
Ba experts ya OMS ya bitumba na Ebola bakomi na Beni, na Nord-Kivu, RDC, 11 février 2021. (Twitter/OMS)

Moto ya mibale akufi na bokono bwa Ebola na Biena, na Butembo, na Nord-Kivu, elobi OMS (Mabongisi ma molongo mpo bokolongo).

"Na moto ya mibale oyo andimami kozala na bokono mpe afuki na virus na Ebola na Biena le 10 février 2021, OMS ya RDC ebakisi makoki ma yango na bitumba na esika eye esimbami na bokono boye," elobi OMS na Twitter.

"Bakisa basali sambo na esika yango, ba experts mwambe basusu bakomi jeudi mpe bakutanaki na ministre ya bokolongo na Nord-Kivu," ebakisi OMS.

Moto mwa yambo akufaki, ezalaki molongani ya mokoni mosusu abikaka kala na Ebola. Mwasi yango akufaki le 1er février 2021.

Bato koleka 161 batiami na botalami mpo bazalaki na pene na mwasi yango.

XS
SM
MD
LG