Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moyi Guinée Bintou Keita atiami mokonzi ya ONU (MONUSCO) na esika ya Zerrougui


Bintou Keita (G) mosungi ya Kalaka mokonzi ya ONU na Afrika, na New York, 29 mars 2019.
Bintou Keita (G) mosungi ya Kalaka mokonzi ya ONU na Afrika, na New York, 29 mars 2019.

Bintou Keita ya mboka Guinée atiami bo’ molakisi elongi ya ONU na RDC mpe mokonzi ya MONUSCO (Misala mya ONU na RDC).

Kalaka monzi ya ONU, Antonio Guterres alobi apesi losako na Liela Zerrougui mpo na mosala malamu asali na RDC.

Mme Bintou azalaki Mosungi ya kalaka mokonzi ya mpo na misala mya kima (opérations de maintien de pax) ya ONU wuto 2017 na Afrika.

Abanda mosala na ONU wuto 1989/

Asalaka asalaka lokola moloakisi ya elongi molandi ya MINUAD (Misala misangangana ya Unioni africaine na ONU na Darfour wuto 2015.

Wuto 2014 kino 2015, Mme Keita azalaki mkambi ya bitumba ya ONU na Ebola na Sierra Leone.

XS
SM
MD
LG