Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Misala mya makoki ma bomoto mya ONU mipameli maloba ya UDPS ya kokanela basusu


Moto moko azoki na mobulu ntango ya botamboli ya UDPS na Kinshasa, 9 juillet 2020.
Moto moko azoki na mobulu ntango ya botamboli ya UDPS na Kinshasa, 9 juillet 2020.

Misala mya makoki ma bomoto mya ONU mipameli maloba ya kokana bato mpe biloko bya bango bakambi ba UDPS balobi na matata mazali na bayi FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

NJHRO epameli makasi malobo ya kopelisa moto malobi na moko na bakambi ba UDPS mazali yo komema mobulu. UNJHRO ekebisi mpo na maloba maye mpe esengi na bayi politiki komipekisa masikulu makoki kobebisa kimya mpe bomoko na mboka, ekomi misala mya makoki ma bomoto mya ONU na RDC na Twitter.

Bokani bato mpe biloko bya bango bopesi mokongo na mobeko mpe bosengi ya mboka ya démocratie, UNJHRO esengi na bakonzi kozwa mikano mpo kopekisa yango mpe kopuesa etumbu na baye balobi yango, ebaki ONU.

Kalaka mokonzi ya UDPS alobaki ete lokola bayi FCC bameki bango bakozongisa mpe basusu ya FCC bakokima mboka.

XS
SM
MD
LG