Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Milulu ya mabala mapekisami mpo na mikolo 45 mpo na COVID-19 na Congo-Brazzaville


Président Denis Sassou N'Guesso azwi mangwele ma COVID-19 na bobandi ya campagne ya mangwele, Brazzaville, Congo, 25 mars 2021. (Twitter/DirPresspdt)
Président Denis Sassou N'Guesso azwi mangwele ma COVID-19 na bobandi ya campagne ya mangwele, Brazzaville, Congo, 25 mars 2021. (Twitter/DirPresspdt)

Molebeli ya mbulamatari ya Congo-Brazzaville, Theirry Moungalla asakoli ete milulu minso ya mabala (coutumier, religeux mpe civil) mipekisami mpo na mikolo ntuku minei na mitano na mikano ya kotelemela bomati makasi bwa COVID-19 na ekolo

Mbulamatari etie na esika misala mibengami likofi to "coup de point" mpo na komeka kusikisa bomati makasi bwa motango ya bakufi na COVID-19 mpe baye bazwi yango.

Milulu minso ya mabala ya coutumier, civile mpe religieux mipekisami sika mpo na mikolo ntuku minei na mitano, elobi ministre Moungalla..

Milulu minso mitakali lokola losambo ya bato ebele, misengeli misalama na botosi makasi mikano ya komibatela na bokono.

Ndenge moko mpe na matanga.

Mikano mizwami na likita président Denis Sassou N'Guesso akambaki na visioconférence wuto Abu Dhabi (Emirats arabes unis) esika azali na Expo 2021.

XS
SM
MD
LG