Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Christophe Moukouéké, kalaka mokonzi ya UPADS akufi na mibi 82 na Brazzaville


Balandi ba UPADS (Union panafricaine pour la démocratie sociale) libanda lya ndako ya lingomba na bango na Brazzaville, Congo, 25 mars 2016
Balandi ba UPADS (Union panafricaine pour la démocratie sociale) libanda lya ndako ya lingomba na bango na Brazzaville, Congo, 25 mars 2016

Christophe Moukouéké  akomaka kalaka mokonzi ya UPADS ya nkondo Pascal Lissouba, yambo na kokima mboka. Azongaka na 2007.

Moyi politiki ya Congo-Brazzaville Christophe Moukouéké akufi na mibu tuku mwambe na mibale na COVID-19 na Brazzaville.

Christophe Moukouéké azalaki moko na bayi lingomba CAP (Comité permanent du Congrès africain pour le progrès). Akufi butu boleki na clinique Leyono epayi amemamaki mpo na lisalisi na COVID-19.

Azalaki molakisi. Ntango azalaka na mibu ntuku sambo atiamaki bo’ prefet ya La Sangha na bokambami ya lingomba moko ya mboka lizalaki kokamba, PCT (Parti congolais du travail).

Nsima Christophe Moukouéké akomaka kalaka mokonzi ya UPADS ya nkondo Pascal Lissouba, yambo na kokima mboka. Azongaka na 2007.

XS
SM
MD
LG