Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba avocats ya général Mokoko baboyi azonga na boloko


Le général Jean Marie Michel Mokoko, jugé et condamné à 20 ans de reclusions. (VOA/Arsène Séverin)
Le général Jean Marie Michel Mokoko, jugé et condamné à 20 ans de reclusions. (VOA/Arsène Séverin)

Basembeli ba général Jean-Michel Mokoko oyo akatelamaka mibu 20 mya misala makasi na 2018, baboyi ete azongisama na ndako ya bokangami na Brazzaville.

"Tokomeli ministre ya ministre mya mambi mya Sembo mpe mokambi ya boloko mpo na kolakisa bobyi na biso na bozongi" na ye na boloko, elobi na AFP Me Yvon Eric Ibouanga.

Général Mokoko azalaka candidat ya maponami ya mokonzi ya mboka na 2016 mpe akangamaki nsima na bosakolami ya elonga ya président Denis Sassou N’Guesso, na kofundama na koluka kokweyisa bokonzi mpe kozwama na minduki.

Général Mokoko, oyo azalaka mokonzi ya mampinga wuto 1987 kino 1993 na Congo-Brazzaville, atikala te kondima elonga ya M. Sassou oyo akokisi mibu 37 na bokonzi.

Général Mokoko, na mibu 74, azalaka na lopitalo ya basoda wuto bozongi na ye na mboka nsima na kotindama na Turquie mpo na lisalisi na bokono bwa COVID-19 na juillet 2020 kino août 2020.

XS
SM
MD
LG