Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ligue ya Basketball ya Afrika ya yambo ekobetama na Kigali


Basani ba basketball na 17e Basketball ya bozangi ndelo na arène ya Dakar ya Diamniadio, Sénégal, 29 juillet 2019.
Basani ba basketball na 17e Basketball ya bozangi ndelo na arène ya Dakar ya Diamniadio, Sénégal, 29 juillet 2019.

Ligue ya basketball ya yambo ya Afrika ekobetama na Kigalai na Rwanda wuta le 16 kino le 30 mai.

Fédération internationale de basket-ball (FIBA) nde esakoli yango mardi.

Club moko te ya RDC to ya Congo-Brazzaville ezali kati na zomi na mibale ekowelela mokano yango.

GSP (Algérie), Petro Luanda (Angola), FAP (Cameroun), Zamalek (Égypte), GN (Madagascar), Police (Mali), Salé (Maroc), Ferroviario Maputo (Mozambique), Rivers Hoopers (Nigeria), Patriots (Rwanda), Douanes (Sénégal) mpe Monastir (Tunisie) nde bakondogwana.

Momekano mwa yambo ya Ligue eye mosengalaki kosalama mobu moye na lisungi lya NBA (Ligue ya basketball ya USA) na FIBA motiami sika mobu mokoya mpo na COVID-19.

XS
SM
MD
LG