Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakonga akatelemi mibu misato ya boloko mpe mwana na ye sanza motoba


Willy Bakonga ministre ya kelasi ya nse, kati kati mpe ya nse (EPST), na Kinshasa, RDC, 19 décembre 2019. (Willy Bakonga)
Willy Bakonga ministre ya kelasi ya nse, kati kati mpe ya nse (EPST), na Kinshasa, RDC, 19 décembre 2019. (Willy Bakonga)

Ministre ya kala ya kelasi ya nse, kati kati mpe technique Willy Bakonga akatelemi mibu misato ya boloko mpo na bosokoli mpe botindi misolo na moyibi libanda lya mboka. Mwana wa ye akatelemi sanza motoba.

Bakangamaki na mpepo na Mayaya na koleka dollars nkoto tuku misato ntango esengalaki ayanola na Cour ya cassation na bofundami mpo misolo mya biteyelo.

Ministère public esengaki jeudi na mpokwa mibu zomi mpo na M. Bakonga oyo abandaki kosambisami ya lombango jeudi na mpokwa na Cour ya cassation na Kinshasa.

Ministère public esengi mpe lisusu ete M. Bakonga afuta mbala misato misolo 33.500$ akutamaki na yango.

Etumbu yango esengami mpe mpo na mwana wa ye akangamaki elongo na M. Bakonga.

Mwana na ye nde andimi ete misolo mizwamaki na libenga na ye mpe alobi etumbu ezalaka mpo moto bakuti ye na likambo kasi tata wa ye te apesama etumbu te mpo na misolo myango..

M. Bakonga akangamaki le 20 avril 2021 kati na mpepo ezalaki kobanda mobembo mpo na kokende Paris.

Nzonkande ayanolaki te na Cour ya cassation le 16 avril nsima na kofundama na IGF (Inpsection générale ya finances) mpo na kopengwisa misolo mya kobundisa COVID-19 na biteyelo mpe kobakisa balakisi na biteyelo ya lokuta na ntina ya kozwa misolo mya l'Etat.

Mbulamatari ya Congo-Brazzaville ezongisaki ye na Kinshasa mercredi na mpokwa.

XS
SM
MD
LG