Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mibu 10 mya boloko misengami na bosambisami ya Bakonga


Ministre ya kala ya kelasi ya nse, kati kati mpe technique (ESPT) ya RDC, 13 janvier 2021. (Twitter/Willy Bakonga_
Ministre ya kala ya kelasi ya nse, kati kati mpe technique (ESPT) ya RDC, 13 janvier 2021. (Twitter/Willy Bakonga_

Ministère public esengi mibu zomi mpo na ministre ya kala ya kelasi ya nse, ya kati kati mpe techinque, Willy Bakonga oyo abandaki kosambisami ya lombango jeudi na mpokwa na Cour ya cassation na Kinshasa.

Ministère public esengi mpe lisusu ete M. Bakonga afuta mbala misato misolo 33.500$ akutamaki na yango.

Etumbu yango esengami mpe mpo na mwana wa ye akangamaki elongo na M. Bakonga.

Mwana na ye nde andimi ete misolo mizwamaki na libenga na ye mpe alobi etumbu ezalaka mpo moto bakuti ye na likambo kasi tata wa ye te apesama etumbu te mpo na misolo myango..

M. Bakonga akangamaki le 20 avril 2021 kati na mpepo ezalaki kobanda mobembo mpo na kokende Paris.

Nzonkande ayanolaki te na Cour ya cassation le 16 avril nsima na kofundama na IGF (Inpsection générale ya finances) mpo na kopengwisa misolo mya kobundisa COVID-19 na biteyelo mpe kobakisa balakisi na biteyelo ya lokuta na ntina ya kozwa misolo mya l'Etat.

Mbulamatari ya Congo-Brazzaville ezongisaki ye na Kinshasa mercredi na mpokwa.

XS
SM
MD
LG