Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Gén. Mokoko azongisami boloko na Brazzaville


Le général Jean Marie Michel Mokoko, akatelamaki mibu 20 ya misala makasi na Brazzaville, . (VOA/Arsène Séverin)
Le général Jean Marie Michel Mokoko, akatelamaki mibu 20 ya misala makasi na Brazzaville, . (VOA/Arsène Séverin)

Général Jean-Michel Mokoko, candidat alongaki te na mponami ya mokonzi ya mboka na 2016, azongisami na boloko ata basambeli baye bazali kosenga akoba kolanda lisalisi na na lopitalo ya basoda na Brazzaville.

Ba avocats ba ye balobi azalaki nanu kolanda kinésithérapie wuto bozongi na ye na Turquie na sanza ya mwambe esika atindamaki mpo na lisalisi na COVID-19.

"Général (Mokoko) amemamaki na ntongo na maison d’arrêt ya Brazzaville kais boloko bwa ye bobongisami te… Mokano mwango bozangi bomoto mpo azalaki kino sika kolandela lisalisi ya kinésithérapie eye esengeli ekoba nanu, elobi na AFP avocat na ye," Me Yvon Eric Ibouanga.

Na mibu 78, général Mokoko akatelamki mibu ntuku mibale ya misala makasi na kofundama na kozwama na manduki nsima na maponami ma 2016.

Général Mokoko azalaka candidat ya maponami ya mokonzi ya mboka na 2016 mpe akangamaki nsima na bosakolami ya elonga ya président Denis Sassou N’Guesso, na kofundama na koluka kokweyisa bokonzi mpe kozwama na minduki.

Général Mokoko, oyo azalaka mokonzi ya mampinga wuto 1987 kino 1993 na Congo-Brazzaville, atikala te kondima elonga ya M. Sassou oyo akokisi mibu 37 na bokonzi.

XS
SM
MD
LG