Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mibu 27 ya bobomi ya Rwanda: Kagame apesi losako na rapport ya ba historiens ya France


Président ya Rwanda Paul Kagame (G) na molongani wa ye Jeannette Kagame bazali kopelisa mwinda na milulu mya mibu 27 mya bobomi bonene to génocide, na Kigali, Rwanda, le 7 avril 2021.
Président ya Rwanda Paul Kagame (G) na molongani wa ye Jeannette Kagame bazali kopelisa mwinda na milulu mya mibu 27 mya bobomi bonene to génocide, na Kigali, Rwanda, le 7 avril 2021.

Rwanda ezali kokonisa lelo mibu tuku mibale na sambo ya bobandi ya bobomi bonene to génocide na mabele ma yango.

Président Paul Kagame alobi ete rapport ba histoiriens ya France babimisaki le 26 mars eleki mpo na bobomi bwango balakisi bolingi bwa bakambi ya France na kopusa na boluki koyeba maye malekaki.

Mokonzi ya Rwanda alobaki yago na milulu misalamaki mpo na bobomani bosalamaka wuto avril 1994.

Pene na bato 800.000 bakufaki na bobomami bwango. BaTutsi lokola na baHutu.

Rapport yango elobi ete France ezali na mokumba mpo bakonzi bayango bayebaki été bobomi bozali kobongisama kasi bakangaki miso ata batindaki basoda ba yango nsima.

Boyokani bazalaki kati na président ya France ya kala François Mitterand na mokonzi ya kala ya Rwanda Juvénal Habyarimana nde epamalamaki na rapport yango.

France endimi kofungola sika mikanda ebomba mpo na bobomi bwango.

XS
SM
MD
LG